Baloma 1:2, Bagalatia 3:16, Baloma 10:4, Baloma 15:8-12 Nzambe apesaki bilaka na ntina ya Mwana na Ye na nzela ya basakoli na Kondimana ya Kala. ( Baloma 1:2 )

Ezali Klisto nde Nzambe alakaki Abalayama mpe bakitani na ye. ( Bagalatia 3:16 )

Mobeko oyo Nzambe apesaki ekokisamaki mpe kati na Klisto. ( Baloma 10:4 )

Ezalaki kati na Klisto nde Nzambe abengaki Bayisalaele mpe Bapakano. ( Baloma 15:8-12 )

Bilaka nyonso ya Nzambe ekokisami kati na Klisto. Yango wana tozali kokumisa Nzambe na nzela ya Klisto. ( 2 Bakolinti 1:19-20 )