Nzambe Tata alakaki kotinda Mwana na ye se moko, pe engebene na elaka wana, atindaki Mwana na Ye se moko na mabele oyo po asala mosala ya Klisto bikisa biso. (Genese 3:15, Yoane 3:16, Baloma 8:32, Baefese 2:4-5, Baefese 2:7)

Nzambe Mwana, Yesu ayaki na mabele oyo lokola Mwana se moko ya Nzambe mpe akokisaki mosala ya Klisto na ekulusu. Mpe Nzambe asekwisaki ye mpo na komonisa ete Yesu azali Klisto. (Matai 1:16, Yoane 1:14, 1 Yoane 1:1-2, Baebele 9:26, Baebele 9:28, Misala 2:36, Baloma 4:23-24, 1 Yoane 5:1)

Molimo Mosantu esali ete tósosola mpe ndima ete Yesu azali Klisto. Mpe akoti kati na biso mpe akokisaka mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba na nzela na biso. (Misala 5:32, Yoele 2:28-29, Yoele 2:32, Misala 2:16-18, Misala 2:21)