Matai 4:3-4, Deteronome 8:3, Matai 4:5-7, Deteronome 6:16, Matai 4:8- 10, Deteronome 6:13, Baloma 5:14, 1 Bakolinti 15:22, 45 Zabolo amekaki Yesu, oyo akilaki bilei mikolo 40, mpo abongola mabanga mampa. Kasi Yesu alongaki komekama na komonisáká ete moto azali na bomoi na limpa kaka te, kasi na maloba nyonso ya Nzambe. ( Matai 4:1-4, Deteronome 8:3 )

Zabolo ayebisaki mpe Yesu apumbwa longwa na nsɔngɛ ya tempelo mpo Nzambe akobatela Ye. Kasi Yesu ayebisi zabolo ameka Nzambe te. ( Matai 4:5-7, Deteronome 6:16 )

Na nsuka, zabolo amekaki Yesu ete apesa ye biloko nyonso na mokili soki asambeli ye. Kasi Yesu ayebisaki zabolo ete kaka Nzambe na mokili nde abongi kosambela. ( Matai 4:8-10, Deteronome 6:13 )

Adama akweyaki na komekama ya zabolo, kasi Yesu akweyaki na komekama ya zabolo te. Yesu alongaki pe lisumu na liloba ya Nzambe. Mpo na Adama, liwa eyangelaki bato nyonso. Ndenge moko mpe, na nzela ya Klisto, oyo azali Adama ya solo, tozali na bomoi. ( Baloma 5:14, 1 Bakolinti 15:22, 1 Bakolinti 15:45 )