2 Timoté 4:8, Baebele 11:24-27, Yoane 8:56, Baefese 6:24, 1 Bakolinti 16:22 Ata bankoko ya kondima bamonaki Klisto te, kasi balingaki Ye. ( Baebele 11:24-27, Yoane 8:56 )

Ata biso baoyo tondimi ete Yesu azali Klisto tokoki komona ye sikoyo te, kasi tolingaka ye. (1 Petelo 1:8, Baefese 6:24)

Balakelami mabe baoyo bandimaka te ete Yesu azali Klisto mpe balingaka Ye te. Nzokande, motole ya bosembo ebombami mpo na baoyo bandimaka ete Yesu azali Klisto, balingaka Yesu, mpe bazali na mposa makasi ya bozongi na Ye. ( 1 Bakolinti 16:22, 2 Timote 4:8 )