Mituya 18:19, 2 Ntango 13:5, Genese 15:9-10, 17, Genese 22:17-18, Bagalatia 3: 16 Na Kondimana ya Kala, Nzambe atindaki ete makabo nyonso ya mbuma ezala na mungwa. Mungwa elakisi ete kondimana ya Nzambe ebongwanaka te. ( Levitike 2:13, Mituya 18:19 )

Nzambe apesaki bokonzi ya Yisraele epai ya Davidi mpe bakitani na ye na nzela ya kondimana ya mungwa. (2 Ntango 13:5)

Nzambe alaki kopambola biso, mpe alapi ndai na ye moko ete akotosa elaka yango. (Genese 15:9, Genese 15:17)

Na Kondimana ya Kala, Nzambe alakaki kotindela biso Klisto mpo na kopambola biso mpe koboma banguna na biso na nzela na ye. ( Genese 22:17-18 )

Mokitani ya Abalayama oyo Nzambe alakaki kotindela biso mpo na kopambola biso ezali Yesu Klisto. (Bagalatia 3:16)