Bagalatia 3:16-19, 21-22 Nzambe apesaki bato ya Yisalaele mobeko mpo bázala na bomoi na kolanda mobeko yango. ( Deteronome 5:31 )

Liboso ete Nzambe apesa bato ya Yisalaele Mibeko, alakaki Adama ná Abalayama ete akotinda Klisto, kondimana ya seko. Mobeko oyo epesamaki na nzela ya Moize, mbula 430 nsima wana Nzambe alakaki Abalayama ete akotinda Klisto, ezalaki kaka na nguya tii ntango Klisto ayaki. Mpe mobeko ezali kokamba moto nyonso mpo na kondima Klisto na kosala ete ayeba ete bazali basumuki. ( Genese 3:15 , Bagalatia 3:16-19 , Bagalatia 3:21-22 )